2 « Makanisi na ngai ezali kotinda ngai ete nayanola, nakoki kovanda nye te, pamba te motema na ngai ekomi likolo-likolo.
Nani akoki kofunda ngai ? Soki te, nakokanga monoko mpe nakokufa.
Tsofari, moto ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :
Nazali koyoka maloba mabe, maloba oyo eyokisi ngai soni ! Kasi mayele na ngai elakisi ngai maloba ya kozongisa.
« Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko, boni, okotomboka mpo na yango te ? Kasi nani akoki penza kokanga motema mpe kozanga maloba ?
Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela : « Bato nyonso bazali bakosi. »
Tika ete Yawe akumisama, pamba te atalisaki ngai bolingo na Ye ya kokamwa, tango nazalaki kati na engumba oyo ezingelamaki na banguna !
Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.
Soki omoni moto kowela koloba liboso ete akanisa, malamu kotia elikya na zoba, kasi na ye te.
Kotombokaka noki te, pamba te kanda evandaka kati na bazoba.
Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai ; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te !
Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Nalingi ete opesa ngai, sik’oyo, na sani, moto ya Yoane Mobatisi.
Pamba te nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzokande, bolingo yango evandisami na boyebi te.
Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;