Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 20:14 - Mokanda na Bomoi

14 bilei na ye ekobongwana kati na libumu na ye, ekokoma lokola ngenge ya nyoka kati na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 20:14
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

soki ameki elengi na yango mpe atiki yango te, soki abombi yango na se ya minu na ye,


Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ; Nzambe akofutisa ye yango.


Akofiba ngenge ya nyoka, lolemo ya etupa ekoboma ye.


Wana azali kotondisa libumu na ye, Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, mpe ekonokela ye lokola bilei.


bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.


Bilei oyo ezwami na nzela ya lokuta ezalaka elengi na monoko ya moto, kasi, na sima, monoko na ye etondaka na zelo.


Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.


Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, lolemo na bango esalaka mosala ya kokosa, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.


Nakotindela bango nzala makasi, bokono oyo esalaka nzoto moto-moto mpo ete esilisa bango, mpe etumbu oyo ekoboma bango. Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ