10 bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola, maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki,
Asengeli kofuta mwa mwana meme yango mbala minei, pamba te azalaki na mawa te ya kosala likambo ya boye.
Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ; Nzambe akofutisa ye yango.
akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba, akomela ata moko te, akotikala kosepela te na litomba oyo azwaki na mombongo na ye.
Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele, mopanga ezali lifuti na bango, bakitani na ye bakokufa na nzala,
Nkosi ekufaka mpo na kozanga nyama ya kolia, mpe bana ya nkosi ya mwasi epanzanaka.
‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi, balonga te na kosambisama mpe bazangela moto oyo akobundela bango !
Tika ete bana na ye batelengana mpe bakoma bisengasenga, tika ete bakende kosenga mosika ya ndako na bango oyo ebukana-bukana !
Bongo Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito oyo bapesaki bango biloko oyo basengaki. Na ndenge wana nde basilisaki biloko ya bato ya Ejipito.
Soki bakangi moto azali koyiba, bongo babeti ye mpe akufi ; mobomi akozwa etumbu te mpo na makila oyo esopani.
Soki ayibaki nyama, ezala ngombe, ane to meme, bongo bakuti nyama yango ya bomoi na maboko na ye, akofuta banyama mibale.
Soki oboyi kotika bango kokende mpe okobi kokanga bango,
Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko mpe ememaka nzala.
Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo, akopesa biloko nyonso ya ndako na ye.
Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye : — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.