Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 2:5 - Mokanda na Bomoi

5 Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo, beta nzoto mpe mikuwa na ye ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 2:5
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na Nzambe : — Boni, ezali ngai nde napesaki mitindo ete batanga motango ya bato ? Ngai moko nde nasalaki masumu, ngai moko nde nasalaki mbeba oyo eleki mabe. Bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te. Oh Yawe, Nzambe na ngai, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ; kasi tika ete bokono oyo ebomaka ekweyela te bato na Yo !


Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo mpe beta biloko na ye nyonso ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.


Yawe alobaki na Satana : — Malamu ! Biloko na ye nyonso ezali kati na maboko na yo ; kasi, kokitisa loboko na yo te na bomoi na ye ! Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe.


Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.


Satana azongiselaki Yawe : — Poso mpo na poso : moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye.


Yawe alobaki na Satana : — Malamu ! Azali kati na maboko na yo, kasi kosimba bomoi na ye te !


Mwasi na ye alobaki na ye : — Boni, ozali kaka kokoba na bosembo na yo ? Lakela Nzambe mabe mpe kufa na yo !


Nakangi monoko, nakoloba lisusu te, pamba te Yo nde osali.


bato oyo bapesaka Ngai kanda tango nyonso na nko, babonzaka mbeka kati na bilanga mpe babonzaka malasi ya ansa na bitumbelo basala na babiliki ;


Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala ; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe.


Mwana mobali ya mwana mwasi ya Isalaele atiolaki Kombo ya Yawe mpe alakelaki yango mabe, boye bamemaki ye epai ya Moyize. Kombo ya mama na ye ezalaki « Shelomiti. » Shelomiti azalaki mwana mwasi ya Dibiri, kati na libota ya Dani.


Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo ;


Bongo nayokaki, kati na Lola, mongongo moko ya makasi koloba : « Tango ya lobiko, ya nguya, ya Bokonzi ya Nzambe na biso, mpe ya nguya ya Klisto na Ye ekoki. Pamba te Mofundi ya bandeko na biso, oyo afundaka bango butu mpe moyi, liboso ya Nzambe na biso, abwakami na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ