Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 2:4 - Mokanda na Bomoi

4 Satana azongiselaki Yawe : — Poso mpo na poso : moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 2:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bamemaki epai ya Jozefi bampunda, bantaba mpe bangombe na bango ; bongo Jozefi apesaki bango bilei na esika ya bampunda, ba-ane, bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Na mibu nyonso wana oyo Jozefi azalaki kopesa bango bilei, bango bazalaki kopesa ye bibwele na bango.


Mpo na nini, biso elongo na mabele na biso, tokufa na miso na yo ? Somba biso kaka elongo na mabele na biso na motuya ya biloko ya kolia ; mpe biso elongo na mabele na biso, tokokoma bawumbu ya Faraon. Toboyi na biso kokufa na nzala, pesa biso milona ya kolona mpo ete tobika mpe mabele na biso ekoma esobe te.


Bakalaka na ye balobaki na ye : — Tala, toyokaki ete bakonzi ya Isalaele bazalaka malamu. Pesa nzela ete tokende epai ya mokonzi ya Isalaele, tolata bilamba ya saki na loketo na biso mpe basinga na mito na biso ; tango mosusu bakoki kobikisa bomoi na yo.


Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe.


Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo, beta nzoto mpe mikuwa na ye ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.


Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye, kasi bato mabe batungisaka mobola te.


Kasi bato zomi kati na bango balobaki na Isimaeli : — Koboma biso te ! Tozali na ble, na orje, na mafuta mpe na mafuta ya nzoyi, oyo tobombaki kati na bilanga. Boye, abomaki bango lisusu te, abikisaki bango elongo na bandeko na bango.


Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?


Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?


Pamba te bomoi eleki bilei na tina, mpe nzoto eleki bilamba na tina.


Bazongiselaki Jozue : — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ