Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 2:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bamivandisaki na mabele elongo na Yobo mikolo sambo mpe butu sambo. Moko te akokaki koloba na ye ata liloba moko, pamba te bamonaki ndenge nini pasi na ye ezalaki makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 2:13
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko.


Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.


Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye.


Tango nayokaki bongo, napasolaki nzambala mpe kazaka na ngai, napikolaki suki ya moto na ngai mpe mandefu na ngai mpe namivandisaki wana na mabele.


Tango kaka nayokaki makambo oyo nyonso, namivandisaki na mabele mpe nakomaki kolela. Nasalaki mikolo mwa mingi ya matanga, na kokila bilei mpe na kosambela Nzambe ya Likolo.


Sima na yango, Yobo afungolaki monoko na ye mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe.


« Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko, boni, okotomboka mpo na yango te ? Kasi nani akoki penza kokanga motema mpe kozanga maloba ?


Nakanisaka Nzambe mpe nalelaka, nakotaka na mozindo ya makanisi mpe nalembaka nzoto.


Bikuke ya Siona ekolela mpe ekozala na matanga ; boye Siona ekokelela mpe ekovanda na mabele.


Kita mpe vanda na putulu, Babiloni, mboka kitoko ! Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, Babiloni, mboka kitoko ! Moto moko te akobenga yo lisusu « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. »


Bampaka ya Siona, mboka kitoko, bavandi kimia na mabele, bamisopeli putulu na mito na bango mpe balati basaki ; bongo bilenge basi ya Yelusalemi bafukami, bilongi na bango kino na se.


Nakomaki kino na Teli-Avivi epai wapi bato oyo bamemaki na bowumbu bazalaki kovanda, pembeni ya ebale Kebari. Navandaki kuna elongo na bango mikolo sambo ; nazalaki kokamwa mingi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ