Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 2:12
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, atombolaki mongongo makasi mpe agangaki. Alobaki na tata na ye : — Ah ! Tata na ngai, pambola ngai, pambola ngai mpe lokola !


Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye.


Tango nayokaki bongo, napasolaki nzambala mpe kazaka na ngai, napikolaki suki ya moto na ngai mpe mandefu na ngai mpe namivandisaki wana na mabele.


Kaka na sanza wana, na mokolo ya tuku mibale na minei, bana ya Isalaele basanganaki mpo na kokila bilei ; balataki basaki mpe bamipakolaki putulu na mito.


Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye ; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa.


Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki.


balingami na ngai balimwe, mpe baninga na ngai babosani ngai ;


Bampaka ya Siona, mboka kitoko, bavandi kimia na mabele, bamisopeli putulu na mito na bango mpe balati basaki ; bongo bilenge basi ya Yelusalemi bafukami, bilongi na bango kino na se.


bakoganga na mongongo makasi mpe bakolela na mawa nyonso mpo na yo ; bakomisopela putulu na mito mpe bakomibamba na mabele.


Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.


Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene epai wapi bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monene bakomaki bazwi mpo na bomengo na yo ! Na ngonga moko kaka, obebisami ! ›


Tango Anjelu ya Yawe alobaki makambo oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele, bakomaki kolela makasi,


Tango bantoma bakomaki na Gibea, engumba ya Saulo, mpe balobaki na bato makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bato nyonso balelaki makasi.


Davidi mpe bato na ye balelaki makasi kino bazangaki makasi ya kolela.


Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka ; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ