Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 2:11 - Mokanda na Bomoi

11 Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa ; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 2:11
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ketura abotelaki ye : Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa.


Bana mibali ya Elifazi : Temani, Omari, Tsefo, Gaetami mpe Kenazi.


Tala bakonzi ya mabota ya bana mibali ya Ezawu : Bana ya Elifazi, mwana liboso ya Ezawu : mokonzi Temani, mokonzi Omari, mokonzi Tsefo, mokonzi Kenazi,


Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi.


Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye.


Bana mibali oyo Abrayami abotaki na Ketura, makangu na ye : Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa. Bana mibali ya Yokishani : Saba mpe Dedani.


Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi.


Tata na bango Efrayimi alelaki bango mikolo ebele, mpe bandeko na ye bayaki kobondisa ye.


Tsofari, moto ya engumba ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :


Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta, bozali lokola minganga oyo bayebi mosala malamu te.


Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :


« Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo ; bino nyonso bozali babondisi mabe.


Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.


Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :


Balingami na ngai nyonso ya motema bayini ngai, bato oyo nazalaki kolinga babalukeli ngai ;


Balingami na ngai, boyokela ngai mawa, nabondeli bino penza, boyokela ngai mawa, pamba te loboko ya Nzambe ebeti ngai.


Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :


Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye ; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo.


Sima na Yawe koloba makambo oyo epai ya Yobo, alobaki na Elifazi, moto ya Temani : « Kanda na Ngai engaleli yo mpe baninga na yo mibale, pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki.


Boye Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa, mpe Tsofari, moto ya Naama, basalaki makambo oyo Yawe atindaki bango kosala ; mpe Yawe ayambaki libondeli ya Yobo.


Moto nyonso oyo azali na pasi asengeli na mawa ya baninga na ye, ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Masanga ya bato ya Tema, oyo ezali na mobembo, elukaki mayi ; masanga ya bato ya Saba, oyo ezali na mobembo, etielaki yango motema.


Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :


Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.


Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.


Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.


Makama mibale oyo ekomeli yo, nani akoki kolendisa yo : Mokili na yo ekomi mipiku ya mabanga mpe ebebisami, nzala makasi mpe mopanga, nani akobondisa yo ?


Na tina na Edomi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, engumba ya Temani etikali lisusu na bato ya bwanya te ? Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te ? Boni, bwanya na bango esili penza ?


Temani, basoda na yo ya mpiko bakolenga na somo, mpe bavandi nyonso ya bangomba ya Ezawu bakokufa na mopanga !


Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.


Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.


Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango ; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango.


Bokanisaka bato oyo bazali kati na boloko lokola nde bino mpe bozali kati na boloko elongo na bango. Bokanisaka bato oyo bazali komona pasi, mpo ete bino mpe bozali na nzoto oyo emonaka pasi.


Gederoti, Beti-Dagoni, Naama mpe Makeda : bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ