« Kasi sik’oyo, nakomi eloko ya kotiola epai ya bilenge oyo batata na bango bazangaki tina, mpe oyo nakokaki kutu te kopesa nzela ya kolia esika moko na mbwa na ngai, oyo ezalaki kobatela bibwele na ngai.
Kasi bino, bokobengama Banganga-Nzambe ya Yawe, bakopesa bino kombo bawumbu ya Nzambe na biso ; bokolia mpe bokotonda na bozwi ya bikolo mpe bokozwa lokumu na bomengo na bango.