Ezali na moto kati na bino oyo atosaka Yawe mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye, bongo atambola kati na molili mpe atikala komona pole te ? Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe mpe atalela Nzambe na ye.
Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.
Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe.