7 Atako nagangi ete basali ngai mabe, nazali kozwa ata eyano moko te ; ata soki nabeleli ete basunga ngai, moto oyo akokata likambo azali te.
Boni, ozali kosepela konyokola ngai, kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali, mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe ?
Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela moto liboso ya Nzambe ndenge moto alobelaka moninga na ye ?
Solo, nayebi malamu makanisi mpe mabongisi na bino, mpo na kotelemela ngai ;
Oh Nzambe, nazali koganga epai na Yo, kasi ozali kopesa ngai eyano te ; natelemi, kasi ozali kotala ngai kaka pamba.
Kasi boni, moto oyo azali kokufa akoki kotombola ata loboko te ? Moto oyo azali na pasi, akoki te kosenga lisungi ?
Nakomi mwindo, kasi moyi te nde eyindisi ngai ; kati na lisanga, nakomi kaka kotelema mpe kobelela mpo na koluka lisungi.
Tala makambo oyo Yobo azali koloba : ‹ Nasali mabe te, kasi Nzambe aboyi kolongisa ngai.
Olingi kotiola bosembo na ngai ? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?
Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. Soki ezali Ye te, ezali nani ?
Azali moto lokola ngai te mpo ete nazongisela Ye eyano to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.
Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini otelemi mosika ? Mpo na nini ozali kobikisa ngai te ? Mpo na nini ozali koyoka te koganga na ngai ?
Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo, kasi oyanoli ngai te ; na butu, nabeleli lisusu, mpe natikali kovanda nye te.
Na tango nyonso oyo nalobaka, nagangaka makasi mpo na kosakola kaka mobulu mpe kobebisama. Mokolo na mokolo, Liloba na Yawe ememelaka ngai kofingama mpe pamela ya mabe.
Ezala soki nabeleli mpo na kosenga lisungi, azali koyoka libondeli na ngai te.