Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango ; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide ; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna.
Tango akendaka, nabwakelaka ye monyama mpe nakangaka ye ndenge bakangaka ndeke na likolo. Nakopesa ye etumbu oyo ekoki kolanda ndenge nakebisaki ye na tina na yango kati na lisanga.