Balobaki na ngai : « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi ; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »
Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai, bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo batombokelaka ngai balata soni mpe bazala kati na yikiyiki !
Na mokolo wana, basi sambo bakokangama na mobali moko mpe bakoloba : « Tokomileisa biso moko mpe tokomilatisa biso moko ; yo, ndima kaka ete tobengama na kombo na yo ! Longola soni na biso ! »