Longwa kuna na Jeriko, Elize akendeki na Beteli. Wana azalaki kotambola na nzela, bilenge mibali babimaki wuta na engumba mpe bazalaki kotiola ye ; bazalaki koloba : « Moto na libandi, longwa awa ! Moto na libandi, longwa awa ! »
« Kasi sik’oyo, nakomi eloko ya kotiola epai ya bilenge oyo batata na bango bazangaki tina, mpe oyo nakokaki kutu te kopesa nzela ya kolia esika moko na mbwa na ngai, oyo ezalaki kobatela bibwele na ngai.
Na loboko na ngai ya mobali, lisanga ya bato mabe ezali kobundisa ngai, batie mitambo na makolo na ngai, batie mabaku na nzela na ngai mpo na kosala ngai mabe ;