Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 19:14 - Mokanda na Bomoi

14 balingami na ngai balimwe, mpe baninga na ngai babosani ngai ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 19:14
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito atikalaki kokanisa lisusu Jozefi te : abosanaki ye.


Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli.


bato oyo nayambaki na ndako na ngai mpe basali na ngai ya basi, bango nyonso bakomi kotala ngai lokola mopaya, bakomi komona ngai lokola moto oyo batikala koyeba te.


Balingami na ngai nyonso ya motema bayini ngai, bato oyo nazalaki kolinga babalukeli ngai ;


Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye ; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo.


Banguna na ngai nyonso bakomi kozwa ngai lokola eloko ya lisuma, baninga na ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya soni, mpe bato oyo bayebi ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya somo.


Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.


Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye ; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.


Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.


Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ