Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 19:13 - Mokanda na Bomoi

13 Akaboli ngai na bandeko na ngai, bongo bato oyo bayebi ngai bapesi ngai mokongo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 19:13
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.


Oh Nzambe ! Solo penza, olembisi ngai ! Obebisi ndako na ngai nyonso,


Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye ; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo.


Kasi tala, bandeko na ngai bakosi ngai lokola moluka, lokola mayi ya moluka oyo ekawuki.


Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema ; tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa.


Bomoi na ngai ekawuki mpo na pasi, mpe mibu na ngai ezali koleka kati na kolela ; makasi na ngai esili mpo na mabe na ngai, mpe mikuwa na ngai elembi.


Banguna na ngai nyonso bakomi kozwa ngai lokola eloko ya lisuma, baninga na ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya soni, mpe bato oyo bayebi ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya somo.


Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.


Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.


Balobaka : « Pasi moko ya somo penza ekangi ye, ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »


Oyebi ndenge nini nazali kofingama, oyebi soni mpe kosambwa na ngai ; banguna na ngai nyonso bazali liboso na Yo.


Pamba te nandimi kofingama mpo na Yo, mpe soni ezipi ngai elongi.


Bandeko na ngai bakomi kozwa ngai lokola moto oyo bayebi te, nakomi lokola mopaya na miso ya bana ya mama na ngai.


Ezingelaka ngai mikolo nyonso, lokola mayi, na bangambo nyonso.


Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai, bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai.


Nabengisaki baninga na ngai, kasi bakosaki ngai. Banganga-Nzambe mpe bakambi na ngai bakufaki kati na engumba tango bazalaki koluka bilei mpo ete bawumela na bomoi.


Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye ; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.


Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama. Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.


Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosunga ngai ; bango nyonso basundolaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ