10 asasi-sasi ngai na bangambo nyonso kino nakomi pene ya kokufa, apikoli elikya na ngai ndenge bapikolaka nzete ;
Bakokoka te kotonga lisusu oyo Ye asili kobebisa, bakokoka kokangola te moto oyo Ye asili kokanga.
ndenge mayi eliaka mabanga, ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele, ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto.
Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ; mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, nyonso, esili kobeba.
wana elikya na ngai ezali penza wapi, mpe nani penza azali komona elikya na ngai ?
Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.
Libumu ya mama ebosanaka bango mpe bankusu esepelaka kolia bango. Bakanisaka bango lisusu te, pamba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete.
Makasi nini penza nazali na yango mpo ete nazala lisusu na elikya ? Mpo na nini nawumela lisusu kotala suka ya bomoi na ngai ?
Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ; nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.
Mpo na kanda monene na Yo, otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.