Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 18:8 - Mokanda na Bomoi

8 Makolo na ye ekangisaka ye na monyama, bongo abundaka-bundaka kati na madusu na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 18:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki esepelisi mokonzi, tika ete abimisa mobeko ya koboma bango ; mpe ngai nakopesa na maboko ya bakalaka oyo batalaka makambo ya mokonzi mbongo ya bibende ya palata nkoto zomi mpo ete batia yango kati na libenga ya mokonzi.


Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye : — Lokola kokweyisama na yo ebandi liboso ya Maridoshe oyo azali Moyuda, okokoka kolonga ye te ; solo penza, okokweyisama lisusu na se koleka !


Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.


Mokonzi Kizerisesi atunaki Ester, mwasi ya mokonzi : — Moto yango nani oyo ameki kobongisa likambo ya boye ? Azali wapi ?


Motambo ekangaka matambe na ye, mpe singa na yango ekangaka ye makasi.


wana boyeba ete Nzambe nde asali ngai mabe mpe azingeli ngai na monyama na Ye.


Yango wana, mitambo ezingeli yo, kobebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo,


Tika ete moto oyo azali na nzala asilisa mbuma ya elanga na ye, akamata yango kino kati na basende ; mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye ! ›


tika ete libebi ekweyela bango na mbalakata, bakangama bango moko na mitambo oyo batielaki ngai mpe bakweya kati na mabulu yango !


mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.


Lisumu ya moto mabe ezalaka na motambo, kasi moto ya sembo agangaka na esengo mpe asepelaka.


Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,


Oh bato ya mokili, somo, libulu mpe motambo ezali kozela bino.


Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somo akokweya na libulu, mpe oyo akoluka kobima kati na libulu akokangama na motambo. Maninisa ya likolo esili kofungwama, makonzi ya mokili ezali koningana.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotiela yo motambo na Ngai tango nakosangisa bato ya bikolo ebele ; boye bakokanga yo na motambo yango.


Mokambi ya Lingomba asengeli mpe kozala moto oyo akenda sango ya malamu kati na bato oyo bazali bandimi te mpo ete abatela lokumu na ye mpe akweya te na mitambo ya Satana.


Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.


Bongo bakozongela mayele na bango ya malamu mpe bakolongwa na motambo ya Satana oyo akanga bango na boloko mpo ete basala kaka mokano na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ