Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai, okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe mpe kotala ngai na miso mabe lokola nde nazali monguna na yo.
Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.
Bipai nyonso oyo molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe mwana akomaka kobimisa fulufulu na monoko, kolia minu, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
Molimo moko etungisaka ye : soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele ; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye.