Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »
Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.
Boboma bana ngombe mibali na ye nyonso ; tika ete ekende na esika oyo babomelaka banyama ! Mawa na bango mpo ete mokolo na bango ekoki, tango mpo na bango ya kozwa etumbu.
Sala nzela moko mpo ete mopanga ekoma kino na Raba, engumba ya bato ya Amoni, mpe nzela mosusu mpo ete mopanga ekoma kino na Yelusalemi, engumba batonga makasi, kati na Yuda.
mpe alobaki : — Ah, soki kaka yo mpe oyebaki, na mokolo ya lelo, makambo oyo elingaki komemela yo kimia ! Kasi sik’oyo, ezali ya kobombama mosika na miso na yo.
bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.