2 « Kino tango nini okoloba maloba ya boye ? Kanisa nanu malamu, bongo tokosolola.
« Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ? Moto oyo azali koloba alonga na ye, kaka mpo ayebi koloba ?
Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :
Mpo na nini komona biso lokola banyama ? Boni, tozali nde bazoba na miso na yo ?
« Yoka na bokebi maloba na ngai, mpe tika ete yango ezala kobondisama mpo na ngai.
Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato, bato oyo balembi bazwaka bopemi,
Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai, tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai !
« Kino tango nini okokoba koloba makambo ya boye ? Maloba na yo ezali te lokola mopepe makasi ?
Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.
Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;