14 Balongolaka kati na ndako na ye biloko nyonso ya motuya, oyo atielaka motema, mpe akendaka kokutana na bakonzi ya kufa.
Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko : kufa. »
Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.
Pole ekomaka molili kati na ndako na ye, mpe mwinda oyo epelaka pembeni na ye ekufaka.
soki abimisi songe ya mbanzi yango na libale na ye elongo na makila ya mbuma-mbuma, somo ekoyela ye.
Mpo na bango, molili makasi ezali nde tongo, somo ya molili ekomaka moninga na bango.
Ndako oyo atongi ezali makasi te lokola ndako ya limpulututu, lokola ndako ya matiti oyo mokengeli atongaka.
Eloko oyo batielaka motema ekokatana, pamba te elikya na bango ezali lokola ndako ya limpulututu.
Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »
Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.
mpo na maloba ya monguna na ngai mpe kanda ya moto mabe, pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe mpe konyokola ngai na kanda.
Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo, kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba.
Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.
mpe akangola bato nyonso oyo, bomoi na bango mobimba, bakomaki bawumbu likolo na kobanga kufa.