7 Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.
Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane, mpe molili ezingeli miso na ngai.
Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.
ofini-fini ngai makasi penza, mpe kokonda na ngai ekomi ata kotatola mpe kofunda ngai na miso ya bato !
Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota mpe ekomi kolumba solo.
Nazali kokende lokola elili oyo ezali kolimwa ; bazali kobengana ngai lokola mabanki.
Kolela elembisi ngai nzoto. Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai, mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka.
Miso na ngai ebebi mpo na mawa ; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.
Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili ? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi ?
Soki mitema na biso ezali komona pasi mpe soki miso na biso ekomi komona molili,