Mpo na nini okimi na nkuku mpe okosi ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ? Nalingaki kutu kotika yo kokende na esengo elongo na banzembo, na makelele ya bambunda mpe ya lindanda.
nakolongola Isalaele kati na mabele oyo napesaki ye, nakobwaka mosika ya elongi na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai, mpe Isalaele akokoma eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso.
Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola !
Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino, bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango, kasi bakanisaka te mosala na Yawe mpe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye.
Yawe azongiselaki Moyize : — Soki tata na ye abwakelaki ye soyi na elongi ; boni, alingaki kozala na soni te mikolo sambo ? Tia ye na libanda ya molako mikolo sambo, na sima na yango nde akoki kozonga.