15 wana elikya na ngai ezali penza wapi, mpe nani penza azali komona elikya na ngai ?
Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.
asasi-sasi ngai na bangambo nyonso kino nakomi pene ya kokufa, apikoli elikya na ngai ndenge bapikolaka nzete ;
Makasi nini penza nazali na yango mpo ete nazala lisusu na elikya ? Mpo na nini nawumela lisusu kotala suka ya bomoi na ngai ?
Boni, kondima na yo epai ya Nzambe esengeli te kozala likonzi na yo, mpe bosembo na yo esengeli te kosimba elikya na yo ?
Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ; nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.
Nazalaki komilobela : « Tango nazali nanu na makasi na nzoto, naleka solo na nzela ya ekuke ya kufa mpe nazangela mibu oyo etikali na bomoi na ngai ? »
Boye nalobaki : « Lokumu mpe makambo nyonso oyo natielaki elikya na Yawe esili ! »
ndenge mayi eliaka mabanga, ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele, ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto.
Alobaki na ngai : — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! »