14 Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai to ndeko na ngai ya mwasi, ›
Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola, lokola elamba oyo balie na banselele !
Sima na kobebisama ya poso ya nzoto na ngai, ngai, na nzoto na ngai, nakomona Nzambe.
Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko na se ya mabele, mpe bankusu ekozipa bango.
Libumu ya mama ebosanaka bango mpe bankusu esepelaka kolia bango. Bakanisaka bango lisusu te, pamba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete.
toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »
Poso na ngai ya nzoto eyindi mpe ekomi kokweya-kweya, mikuwa na ngai ekawuki na moyi.
Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota mpe ekomi kolumba solo.
Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi, okotika mpe te ete mosantu na Yo apola.
Talo ya bomoi na ye eleki motuya makasi, mpe ekotikala kofutama te.
Lokumu na yo nyonso ekiti kino na mokili ya bakufi, elongo na makelele ya mandanda na yo. Nkusu etondi na se na yo lokola mbeto, mpe mitsopi ezipi yo lokola elamba.
Boye, ezali mpe ndenge moko mpo na lisekwa ya bakufi : ekundami nzoto oyo epolaka, kasi ekosekwa nzoto oyo epolaka te ;