13 Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda ; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi.
Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu kozala na bomoi ? Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana.
Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai.
Bato oyo bazali komona butu lokola moyi bazali koloba kati na molili : ‹ Pole ekomi pene, › nzokande molili ezali makasi.
Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, nalingaki na ngai kokufa mpe kopema
Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi.
Makasi nini penza nazali na yango mpo ete nazala lisusu na elikya ? Mpo na nini nawumela lisusu kotala suka ya bomoi na ngai ?
Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka, ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufi azongaka lisusu te.
Soki namati na likolo, ozali kuna ; soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna.
Talela Yawe ! Zala makasi mpe yika mpiko ! Talela Yawe !
tango bato bakomaka kobanga komata likolo, mpe bakomaka kobanga makama na nzela ; tango nzete ya pome ebimisaka mbuma, tango mabanki ekomaka kilo, mpe baposa ekokisamaka lisusu te ; pamba te moto akendaka na ndako ya libela, mpe basi oyo balelaka na bibembe basanganaka na balabala.
Bato oyo batambolaka na bosembo bakokota na kimia, bakozwa bopemi na bambeto na bango.