Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 16:9 - Mokanda na Bomoi

9 Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai, okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe mpe kotala ngai na miso mabe lokola nde nazali monguna na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 16:9
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini obombi elongi na Yo mpe ozali kozwa ngai lokola monguna na Yo ?


Okangi makolo na ngai na minyololo ya bibende, ozali kokengela malamu lolenge na ngai ya kotambola mpe kolandela bisika nyonso oyo natiaka bilembo ya matambe na ngai.


Awa, likolo ya kanda na yo, ozali komipasola na biteni, basundola mokili to balongola mabanga na bisika na yango likolo na yo ?


kanda na Ye ezali kotumba ngai, mpe azali kotanga ngai na molongo ya banguna na Ye ;


Obongwani monguna ya kanza mpo na ngai, ozali kobundisa ngai na nguya ya loboko na Yo.


Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai, azali kozwa ngai lokola monguna na Ye.


Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.


Lokola bapagano, bazali koseka ngai, bazali kolia minu na tina na ngai.


Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.


Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino : bososola makambo oyo ; noki te nakobebisa bino, mpe moto moko te akokangola bino.


Banguna na yo nyonso bafungoli minoko na bango mpo na kotiola yo, bazali koseka yo mpe kolia minu na bango ; bongo bazali koloba : « Tomeli ye ! Tala mokolo oyo tozalaki kozela ! Tokomi penza na mokolo yango mpe tomoni yango ! »


Azalaki mpo na ngai lokola ngombolo oyo ebongami, lokola nkosi oyo ebombameli ngai ;


Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.


Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.


Oh banguna na ngai, boseka ngai te ! Ata soki nakweyi, nakotelema kaka. Ata soki navandi kati na molili, Yawe azali pole na ngai.


Tango bato ya Likita-Monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia minu mpo na Etieni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ