6 Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te ; bongo soki nakangi monoko nde pasi yango elongwe na bomoi na ngai ?
Nayini bomoi na ngai ! Nakokoba kaka komilela, nakoloba na mongongo makasi mpe na pasi ya motema na ngai.
Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino, mpe bibebu na ngai elingaki koningana mpo na kokitisa bino mitema kati na pasi.
Soki nalobi : ‹ Nabosana ata pasi na ngai, nabongola elongi na ngai mpe nakoma koseka, ›
nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso, pamba te nayebi ete okozwa na Yo ngai te lokola moto ya sembo.