4 Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soki bozalaki na esika na ngai, nakokaki kobimisa maloba ebele mpe koningisa moto mpo na bino.
Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye : ‹ Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo ; Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.
« Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ? Moto oyo azali koloba alonga na ye, kaka mpo ayebi koloba ?
Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino, mpe bibebu na ngai elingaki koningana mpo na kokitisa bino mitema kati na pasi.
elingi koloba ete yo, Yobo, ofungoli monoko na yo kaka na pamba mpe otondisi yango na maloba ya bozoba. »
Moto nyonso oyo azali na pasi asengeli na mawa ya baninga na ye, ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Mpo na bango, nakomi eloko ya nkele ; soki kaka bamoni ngai, baningisi mito.
Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi ; bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai.
Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba :
Okomisi biso eloko ya lisuma na miso ya bato oyo bazali pembeni na biso, eloko ya litio mpe ya liseki na miso ya bato oyo bazali zingazinga na biso.
Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.
Zoba alobaka mingi. Moto moko te ayebi makambo oyo ekoya ; nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekosalema sima na ye ?
tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye : Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo. Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.
Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.
Boni, Isalaele azalaki eloko ya maseki te na miso na bino ? Bokangaki ye kati na miyibi mpo ete bokoma koseka ye tango nyonso bokolobela kombo na ye ?
Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo bazali kobeta maboko na kokamwa, bazali kobeta piololo mpe koningisa mito mpo na Yelusalemi, mboka kitoko : « Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba ? »
Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo, oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela : « Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. » Ndenge nini engumba oyo ebebisami, ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama ! Bato nyonso oyo bakolekela wana bakobeta piololo mpe koningisa mito.
Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango ; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli.
Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.
Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango ; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango.