Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 16:19 - Mokanda na Bomoi

19 Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo, molobeli na ngai azali na Lola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 16:19
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki onyokoli bana na ngai ya basi mpe soki ozwi basi mosusu likolo na bana na ngai ya basi, atako moto moko te akozala kati na biso, kasi yeba ete Nzambe nde azali motatoli kati na yo mpe ngai. »


Oh mabele, kozipa makila na ngai te ! Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema !


Ngai, nayebi na ngai malamu ete Mosikoli na ngai azali na bomoi, mpe, awa na mokili, akotelema ya suka mpo na kokata likambo na ngai.


« Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.


Pamba te, libula nini Nzambe akoki kobongisela ngai wuta na likolo ? Libonza nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kotindela ngai wuta na likolo ?


Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi kati na bisika oyo eleki likolo ?


Bokumisa Yawe ! Bokumisa Yawe wuta na likolo, bokumisa Ye na bisika oyo eleki likolo.


Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela lokola moyi liboso na ngai.


Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino


Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu :


Nazali kolapa ndayi na Kombo ya Nzambe mpe likolo ya bomoi na ngai ete ezalaki te mpo na kolukela bino mindondo nde nazongaki lisusu te na Kolinto ;


Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Ye oyo akumisama mpo na seko, ayebi ete nazali kokosa te.


Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto.


Bino moko bozali batatoli, Nzambe mpe azali Motatoli, ete totambolaki na bosantu, na bosembo mpe na kozanga pamela, na miso na bino oyo bozali kondima.


Boyebi malamu ete tosalelaki maloba ya sukali te mpe totindikamaki te na posa ya konduka mbongo. Na tina na likambo oyo, Nzambe azali penza Motatoli na biso.


Samuele alobaki na bango : — Yawe azali Motatoli mpo na kotelemela bino, mpe mopakolami na Ye azali motatoli na mokolo ya lelo ete bomoni ata eloko moko te kati na maboko na ngai. Bato bazongisaki : — Azali penza Motatoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ