Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 15:8 - Mokanda na Bomoi

8 Osila koyoka makambo oyo elobamaka kati na Likita ya Nzambe ? Bwanya ezalaka kaka epai na yo moko ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 15:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe asosolisa yo basekele ya bwanya, pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale. Yeba likambo oyo : Nzambe abosana masumu na yo ebele.


« Solo, bozali penza bato ; tango bokokufa, bwanya mpe ekokufa elongo na bino !


Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na mikolo oyo nazalaki nanu na makasi, tango bolingo ya Nzambe ezalaki kopambola ndako na ngai,


Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.


Pamba te Yawe ayinaka bato mabe, kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.


Kasi nani kati na basakoli wana akotaki na mayangani ya Yawe mpo ete amona to mpe ayoka Liloba na Yawe ? Nani apesaki litoyi mpo na koyoka liloba na Ye ?


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.


Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki : « Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. »


Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.


Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi ! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye mpe kososola nzela na Ye !


« Nani ayebaki makanisi ya Nkolo ? Nani akomaki kopesa Ye toli ?


« Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli ? » Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ