7 Yo nde moto ya liboso oyo obotama kati na bato ? Omona moyi liboso ya bangomba mikuse ?
Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »
Bwanya ezalaka kati na bampaka te ? Bomoi ya molayi epesaka mayele te ?
Na ngambo na biso, ezali na bato ya suki pembe, bampaka, bato oyo baleki tata na yo na mibu ya mbotama.
Liboso ete bangomba ezala, liboso ete okela mabele mpe mokili, libela na libela, ozali Nzambe.