Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 15:34 - Mokanda na Bomoi

34 Solo, libota ya moto mabe ekofuluka te, mpe moto ekozikisa ndako na ye mpo na mabe na ye moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 15:34
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yo mpe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo,


Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia, mpe bato oyo batombokelaka Nzambe, oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe, bango nde babatelamaka.


akokoka kokima molili te, moto ekokawusa mandalala na ye mpe akokima ata pema na ye moko.


Ndako na ye etikalaka na eloko moko te, mpe fofolo ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango.


Tsofari, moto ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :


Elikya nini moto mabe azali na yango tango Nzambe azwi bomoi na ye ?


Bato oyo bayebi Nzambe te mpe mitema na bango etondisami na kanda, babelelaka Nzambe te tango akangaka bango minyololo.


Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso oyo babosanaka Nzambe ; boye, elikya ya bato mabe ebebaka.


Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.


Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.


kasi batambolaki te na nzela ya Samuele, tata na bango : bamipesaki na lokoso ya mbongo, na kozwaka kanyaka mpe na kokataka makambo na bosembo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ