Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »
Moko te azali kofunda makambo na bosolo, moko te azali kosamba na bosembo ; bazali kotia mitema na makambo ezanga tina mpe bazali koloba lokuta ; na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabe mpe bakokisaka yango na misala na bango.