Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 15:30 - Mokanda na Bomoi

30 akokoka kokima molili te, moto ekokawusa mandalala na ye mpe akokima ata pema na ye moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 15:30
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azalaka na elikya te ya kobima na molili, mpe mopanga ezelaka ye.


Ayengaka-yengaka mpo na koluka lipa, kasi akozwela yango wapi ? Ayebaka ete mokolo ya molili ezelaka ye.


Solo, libota ya moto mabe ekofuluka te, mpe moto ekozikisa ndako na ye mpo na mabe na ye moko.


Misisa na ye ekawukaka na se ya mabele, mpe, na likolo, bitape na ye elembaka.


Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili, mpe balongolaka ye na mokili.


Molili makasi ezali kozela libula na ye, moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye.


‹ Solo, banguna na biso babebi, moto ezikisi bomengo na bango. ›


Ezali moto oyo ezali kozikisa kino na kobebisama mpe ekoki kobebisa bomengo na ngai nyonso.


bakufaka na mopepe ya Nzambe mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye.


Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.


kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.


Babongisaki wuta kala Tofeti, babongisaki yango nde mpo na mokonzi ; basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo nde ekopelisa yango.


Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni ; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.


Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.


Bateyi yango ya lokuta bazali lokola bitima oyo ebimisaka lisusu mayi te to lokola mapata oyo mopepe makasi etindikaka. Nzambe abombela bango esika kati na molili makasi.


Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi ; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela.


Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ