Yango wana, soki moto asali mibu ebele na bomoi, tika ye asepela na mibu yango nyonso ; kasi tika ete abosana te ete mibu ya pasi ekozala ebele, mpe ete makambo nyonso oyo ekoya sima ezali pamba.
Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, ndenge wana mpe mampinga moko ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya.
Boni, mokolo ya Yawe ekozala te mokolo ya molili ? Boni, ekozala te mokolo oyo ezanga pole ? Ekozala penza mokolo ya molili makasi, ata kongenga moke ekozala te.
Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi, mokolo ya pasi mpe ya somo, mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama, mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,