Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 15:21 - Mokanda na Bomoi

21 Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 15:21
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te Nkolo asalaki ete bato ya Siri bayoka lokito ya bashar, ya bampunda mpe ya mampinga minene ya basoda kino balobanaki bango na bango : « Tala, mokonzi ya Isalaele azwi mokonzi ya bato ya Iti mpe mokonzi ya bato ya Ejipito mpo na koya kobundisa biso. »


Ester azongiselaki ye : — Monyokoli mpe monguna ! Ezali Amani, moto oyo ya pasi ! Amani abangaki makasi liboso ya mokonzi mpe ya mwasi ya mokonzi.


Pasi mpe mawa ebangisaka ye, ekomelaka ye lokola mokonzi oyo amibongisi mpo na bitumba,


Somo elandaka ye bisika nyonso oyo atambolaka.


Balongolaka kati na ndako na ye biloko nyonso ya motuya, oyo atielaka motema, mpe akendaka kokutana na bakonzi ya kufa.


Ayebaki te kopekisa lokoso ya libumu na ye, yango wana bomengo na ye mpe ekowumela te.


Yango wana, mitambo ezingeli yo, kobebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo,


Mpo na bango, molili makasi ezali nde tongo, somo ya molili ekomaka moninga na bango.


Somo ekozwa ye lokola mayi ya mpela ; na butu, mopepe makasi ekopikola ye na mbalakata.


Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.


Makambo oyo moto mabe abangaka, yango kaka nde ekomelaka ye, kasi baposa ya moto ya sembo ekokokisama.


Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye, kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.


Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basaki mpe bolala na putulu, bosala matanga lokola moto oyo akufisi mwana na ye se moko. Bolela na mawa, pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata.


Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.


Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni ; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ