Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 15:20 - Mokanda na Bomoi

20 Na bomoi na ye mobimba, na mibu oyo bakata mpo na bomoi na ye, moto mabe anyokwamaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 15:20
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.


Apesaki mokili epai na bango kaka tango ata mopaya moko te alekaki kati na bango.


Pasi mpe mawa ebangisaka ye, ekomelaka ye lokola mokonzi oyo amibongisi mpo na bitumba,


Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te mpo na esambiselo ? Mpo na nini bato oyo bayebi Ye basengeli koluka na pamba mikolo ya boye ?


Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe, libula oyo moto ya mobulu azwaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso :


Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.


Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi : bato nyonso basukaka kaka ndenge moko ; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi ; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.


Toyebi malamu ete kino sik’oyo, bikelamu nyonso ezali kolela pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ