18 makambo oyo bato ya bwanya balobaki, na kobomba ata eloko moko te kati na makambo oyo bazwaki epai ya batata na bango.
Na ngambo na biso, ezali na bato ya suki pembe, bampaka, bato oyo baleki tata na yo na mibu ya mbotama.
Yoka ngai, mpe nakolimbolela yo ! Tika ete nayebisa yo makambo oyo ngai namona,
Apesaki mokili epai na bango kaka tango ata mopaya moko te alekaki kati na bango.
Solo, oyebi malamu ete wuta kala, wuta tango batia moto na likolo ya mabele,
Nabondeli yo, tuna bato oyo baleka liboso, kanisa mpe landela malamu bwanya ya batata na bango,
Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.
Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.