Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 15:14 - Mokanda na Bomoi

14 Moto azali nani mpo ete azala peto ? Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 15:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bana ya Isalaele bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu, na mokili ya banguna, ezala ya mosika to ya pene,


Tango bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu kati na mokili songolo, ezala ya mosika to ya pene,


Moto oyo abotama na mwasi azalaka kaka na mikolo moke oyo mpe etonda na pasi.


Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ? Moko te !


Mpo ete obwakela Nzambe kanda na yo mpe obimisa makambo ya boye na monoko na yo ?


« Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba, mpe nayebi yango malamu ! Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu akoki kozala sembo liboso ya Nzambe ?


Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko oyo azali na mayele, oyo atalelaka Nzambe.


Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te !


Kosambisa mosali na Yo te, pamba te moto moko te ya bomoi azali sembo liboso na Yo.


Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


Nani akoki koloba : « Nabatelaka motema na ngai peto, nazali peto, nazali na masumu te ? »


Kati na mokili, ezali na moto moko te ya sembo oyo asalaka kaka malamu, bongo azanga kosala masumu.


Tala makambo oyo nasosoli : Nzambe asala bato mpo ete bazala malamu, kasi bato bamilukelaka mindondo bango moko. »


Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali molimo.


Pamba te nayebi malamu ete bolamu evandaka kati na ngai te, elingi koloba : evandaka kati na nzoto na ngai te. Nazalaka na posa ya kosala bolamu, kasi nazangaka nguya ya kokokisa yango.


Kasi tala makambo oyo Makomi eloba : Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ