Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino kati na elanga na yo ya vino, oyo elonama pembeni ya mayi, ezalaki kobota bambuma ebele, ezalaki na bitape ebele mpo ete mayi mpe ezalaki ebele.
Kasi tika ete mobimbi mpe misisa na yango etikala elala na mabele ; kanga yango minyololo ya bibende mpe ya bronze kati na matiti ya zamba ! Tika ete mamwe epolisa yango, tika ete evanda elongo na banyama ya zamba mpe elia matiti ya mabele elongo na banyama !