Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 14:5 - Mokanda na Bomoi

5 Mikolo ya moto ekatama ; okata motango ya basanza na ye mpe otia mondelo oyo akoki koleka te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 14:5
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso ezali kati na loboko na Ye.


Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu kozala na bomoi ? Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana.


Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila, mpe nakokende na ngai na nzela oyo bato bazongaka lisusu te.


Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini tango basanza oyo bakatela ye ekomi na suka ?


Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka bomoi ya pasi te ? Mikolo ya bomoi na ye ezali penza mikolo ya mongamba te ?


Tango obombaka elongi na Yo, somo ekangaka yango ; tango olongolaka yango pema, ekufaka mpe ezongaka na putulu ;


Otiaki mondelo oyo ekoki koleka te ; ekozonga lisusu te kozipa mokili.


Tango nazalaki nanu na lolenge te, ozalaki komona ngai ; mpe omikomelaki kati na buku na Yo mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai liboso ete moko te kati na yango ezala.


Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo, Yawe, mpe nalobaka : « Ozali Nzambe na ngai. »


Motema na ngai eswaki, moto ezalaki kopela kati na ngai, mpe nalobaki na nzela ya monoko na ngai.


Ezali na tango ya kobotama mpe tango ya kokufa, tango ya kolona mpe tango ya kopikola oyo elonami ;


Ndenge moto moko te azali na bokonzi likolo ya pema ya bomoi na ye mpo ete akanga yango, ndenge mpe moto moko te azali na bokonzi likolo ya mokolo na ye ya kufa. Ndenge moto moko te apemaka na tango ya bitumba, ndenge mpe misala mabe ebikisaka te bato oyo basalaka yango.


Mokonzi akosala makambo oyo alingi, akokoma lolendo, akotombola mapeka liboso ya banzambe nyonso mpe akoloba makambo ezanga tina mpo na kotiola Nzambe ya banzambe ; akolonga kino tango kanda makasi ya Nzambe ekosila, pamba te makambo nyonso oyo ekatama esengeli kokokisama.


Ndimbola ya maloba yango ezali : Mene  : Nzambe atangi mikolo ya bokonzi na yo mpe akomisi yango na suka ;


Mpe kaka na butu wana, babomaki Balitazari, mokonzi ya bato ya Babiloni.


Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.


Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »


Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.


Bongo ndenge kaka ekatama ete moto nyonso asengeli kokufa mbala moko, mpe, sima na yango, kosambisama eya,


Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.


Mpe Davidi alobaki lisusu : — Na Kombo na Yawe ! Ye moko Yawe nde akoboma ye : akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ