13 Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila ! Soki kaka okatelaki ngai tango mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu !
Wana Yawe akoleka na mokili mpo na koboma bato ya Ejipito mpe akomona makila na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke, akoleka ekuke yango mpe akopesa nzela te na mobomi ete akota na bandako na bino mpo na koboma.
Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.