Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 14:12 - Mokanda na Bomoi

12 ndenge wana mpe moto akufaka mpe atelemaka lisusu te, akolamuka lisusu te mpe bakoki lisusu kolamusa ye te, tango nyonso likolo ekozala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 14:12
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, nalingaki na ngai kokufa mpe kopema


Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi.


Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »


Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka, ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufi azongaka lisusu te.


Na kala, otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo esalaki Likolo.


Olekisaka yango lokola pongi ya butu, oyo na tongo, esilaka lokola lititi.


Yango wana, soki moto asali mibu ebele na bomoi, tika ye asepela na mibu yango nyonso ; kasi tika ete abosana te ete mibu ya pasi ekozala ebele, mpe ete makambo nyonso oyo ekoya sima ezali pamba.


tango bato bakomaka kobanga komata likolo, mpe bakomaka kobanga makama na nzela ; tango nzete ya pome ebimisaka mbuma, tango mabanki ekomaka kilo, mpe baposa ekokisamaka lisusu te ; pamba te moto akendaka na ndako ya libela, mpe basi oyo balelaka na bibembe basanganaka na balabala.


Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.


Botombola miso na bino na likolo, botala na se, na mabele ; likolo ekolimwa lokola milinga, mabele ekonuna lokola elamba, mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi. Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko, bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.


Solo, nakokela likolo mpe mabele ya sika ; makambo ya liboso, bakokanisa yango lisusu te, ekomata ata lisusu na motema te.


« Ndenge likolo mpe mabele ya sika oyo nasili kosala ekowumela liboso na Ngai, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe bakitani na bino mpe kombo na bino ekowumela.


Ebele ya bato oyo bakundama na se ya mabele bakosekwa : bamoko mpo na bomoi ya seko, mpe mosusu mpo na soni mpe somo ya libela.


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


Asengeli kotikala kuna na Likolo kino na tango oyo Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na Ye, basakoli.


Pamba te bikelamu nyonso ezali na se ya bokonzi ya nguya oyo esukaka na pamba ; na mokano na yango moko te, kasi na mokano ya Ye oyo atiaki bikelamu yango na se ya bokonzi yango, na elikya ete


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


Nzokande, ezali mpe kaka Liloba yango nde azali kobomba Likolo mpe mabele ya sik’oyo mpo na kozika na moto, na mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisama ya bato ya masumu.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


Bongo namonaki Likolo ya sika mpe mabele ya sika, pamba te Likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ