Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 14:1 - Mokanda na Bomoi

1 Moto oyo abotama na mwasi azalaka kaka na mikolo moke oyo mpe etonda na pasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 14:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.


Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.


Alobaki na tata na ye : — Moto pasi ! Moto pasi ! Tata na ye alobaki na mosali moko : — Zongisa ye epai ya mama na ye !


Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te ? Kende ata mosika na ngai mpo ete nazwa ata tango ya kosepela


Moto azali nani mpo ete azala peto ? Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo ?


Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?


Soki kutu sanza ezali kongenga te, mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,


moto abotamaka mpo na komona pasi, ndenge kaka mikalikali ebimaka mpo na kopanzana na likolo.


Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka bomoi ya pasi te ? Mikolo ya bomoi na ye ezali penza mikolo ya mongamba te ?


Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ; nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.


pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka, toyebi eloko te, mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili.


Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokende mbangu koleka mopoti mbangu, ezali kokende mbangu penza, kasi etikali komona esengo te.


Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.


Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.


Pamba te nayebi mabe na ngai, mpe masumu na ngai ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


Yawe, kino tango nini ? Okomibomba penza tango nyonso ? Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto ?


Boye, nayinaki bomoi, pamba te misala oyo esalemaka na se ya moyi ezali mabe mpo na ngai. Nyonso wana ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Mikolo nyonso ya mosala na ye ezali kaka pasi mpe komitungisa ; ezala na butu, makanisi na ye ezalaka na kimia te ; oyo mpe ezali kaka pamba.


Mpo na nini penza nabimaki na libumu ya mama na ngai ? Ezali kaka mpo na komona pasi mpe mikakatano, mpe kosukisa bomoi na ngai na soni ?


Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ