9 Bokosepela soki aluki koyeba makanisi ya mitema na bino ? Bokanisi ete bokoki kokosa Ye ndenge bakosaka bato ?
Makasi mpe elonga ezali ya Ye ; moto oyo basili kokosa mpe moto oyo akosi, bango mibale bazali ya Ye.
Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.
Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango.
Oh ! Tika ete Yobo asambisama kino na suka mpo ete apesa biyano lokola moto mabe !
Oh Nzambe, kundola mpe yeba mozindo ya motema na ngai, meka ngai mpe yeba makambo oyo ezali kotungisa ngai !
Soki tobosanaki Kombo ya Nzambe na biso to totombolaki maboko na biso epai ya nzambe ya mopaya,
Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.
« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »