5 Soki bovandaki ata kimia, bolingaki ata komonana bato ya bwanya.
Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pamba oyo ozali kobimisa ? Bapamela yo te soki ozali kosala maseki ?
Botika makelele mpe botika ngai naloba ! Oyo ekoya eya !
Yoka sik’oyo maloba na ngai, yoka kosamba ya bibebu na ngai.
Kino tango nini bokotika koloba maloba ya pamba-pamba boye ? Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba ?
« Kino tango nini okoloba maloba ya boye ? Kanisa nanu malamu, bongo tokosolola.
« Kino tango nini bokotungisa ngai mpe kolembisa ngai na maloba na bino ?
Botala ngai, bokokamwa, bokozanga ata likambo ya koloba.
Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.
Boni, nasengeli sik’oyo kozela, awa bazangi maloba to basuki wana mpe bakangi minoko ?
Ezala moto ya liboma, soki avandi kimia, amonanaka lokola moto ya bwanya ; moto oyo akangaka monoko na ye amonanaka lokola moto ya mayele.
Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe, kowumela te mpo na kokokisa yango ; pamba te Nzambe asepelaka na bazoba te ; kokisa ndayi na yo.
Boye, moto ya mayele alobaka te na tango ya boye, pamba te mikolo ezali mabe.
Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;