Yobo 13:4 - Mokanda na Bomoi4 Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta, bozali lokola minganga oyo bayebi mosala malamu te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.
Bosungaki te ebwele oyo elemba mpo ete ekoka kozwa lisusu makasi, bobikisaki te oyo ezalaki na bokono, bosalisaki te oyo ebukana lokolo ; bozongisaki te na nzela, oyo ebimaki libanda ya nzela, mpe bolukaki te oyo ebungaki ; kasi nde bozalaki konyokola yango mpe komonisa yango pasi tango bozalaki kokamba yango !