Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai ! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai ! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai !
Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.